Uzi, mwana mobali ya Bani, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Azafi, azalaki mokambi ya Balevi kati na Yelusalemi. Uzi azalaki moko kati na bakitani ya Azafi, oyo bazalaki na mokumba ya kokamba misala ya mindule kati na Ndako ya Nzambe.