Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 1:5 - Mokanda na Bomoi

5 Nabondelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya Likolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya somo ! Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo epai ya bato oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 1:5
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe asambelaki : « Yawe, Nzambe ya Isalaele, ezali na nzambe moko te oyo akokani na Yo, ezala kuna na likolo to awa na se ! Obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo mpo na basali na Yo, oyo batambolaka kolanda mokano na Yo na motema na bango mobimba.


Boni, ezali solo na ekolo moko kati na mokili, oyo ekokani na bato na Yo, Isalaele ; ekolo oyo, kati na mokili, Nzambe asikola bato na yango mpo na lokumu na Ye moko ? Osalaki ete Kombo na yo ekende sango na nzela ya misala minene mpe ya somo oyo osalaki tango obenganaki bikolo liboso ya bato na Yo, oyo akangolaki na Ejipito.


« Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda.


Mokonzi atunaki ngai : — Olingi nini ? Nasambelaki Nzambe ya Likolo,


Na esika nyonso oyo bokoyoka lolaka ya kelelo, boya noki kosangana na biso ; Nzambe na biso akobundela biso.


Sima na ngai kolandela malamu makambo nyonso, natelemaki mpe nalobaki na bankumu, na bakalaka mpe na bato mosusu : « Bobanga bango te ! Bokanisa Yawe oyo azali Nzambe Monene mpe ya somo, mpe bobunda mpo na bandeko na bino, mpo na bana na bino ya mibali mpe ya basi, mpo na basi na bino mpe mpo na bandako na bino ! »


Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.


Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.


Solo, ozali somo ! Nani akokoka kotelema liboso na Yo soki osiliki ?


Nakoyemba tango nyonso bolingo ya Yawe ; monoko na ngai ekosakola boyengebene na Yo libela na libela.


Solo, nazali kotatola yango : « Miboko ya bolingo na Yo ezali na suka te ; ovandisi boyengebene na Yo kati na likolo. »


Azali Nzambe ya somo kati na lisanga ya basantu ; solo, azali somo koleka ba-oyo nyonso bazingeli Ye.


Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.


Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino.


Kolenga te liboso na bango, pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe Monene mpe ya somo.


Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo ; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ