Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 1:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tango kaka nayokaki makambo oyo nyonso, namivandisaki na mabele mpe nakomaki kolela. Nasalaki mikolo mwa mingi ya matanga, na kokila bilei mpe na kosambela Nzambe ya Likolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 1:4
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi abondelaki Nzambe mpo na mwana, akilaki bilei, akotaki na ndako na ye mpe akomaki kolala na mabele babutu nyonso.


Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe ; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe.


Solo, Salomo atongaki na bronze etemelo ya kolobela : ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, bametele mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse, mpe metele pene moko na bosanda ; mpe atiaki yango na kati-kati ya lopango. Amataki na likolo na yango, afukamaki liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele, atombolaki maboko likolo


« Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda.


Wana Esidrasi azalaki kobondela mpe kotubela masumu, azalaki ya kofukama mpe azalaki kolela liboso ya Ndako ya Nzambe. Ebele ya bana ya Isalaele : mibali, basi mpe bana, basanganaki pene na ye mpe, bango nyonso, bazalaki kolela makasi.


Tango nayokaki bongo, napasolaki nzambala mpe kazaka na ngai, napikolaki suki ya moto na ngai mpe mandefu na ngai mpe namivandisaki wana na mabele.


Bongo na tango ya likabo ya pokwa, nasalaki makasi atako nazalaki na pasi makasi kati na motema, natelemaki na nzambala mpe kazaka na ngai, oyo epasuka ; nafukamaki mpe natombolaki maboko na ngai epai na Yawe, Nzambe na ngai.


Nazongiselaki bango : — Nzambe ya Likolo akolongisa biso solo. Biso bawumbu na Ye, tokotelema mpe tokotonga. Kasi bino, bozali ata na eteni moko te ya mabele to na bokonzi moko te kati na Yelusalemi, mpe moto moko te akozala kuna na ekaniseli malamu mpo na bino !


Mokonzi atunaki ngai : — Olingi nini ? Nasambelaki Nzambe ya Likolo,


Pamba te biso basali na Yo, tosepelaka na mabanga na yango, mpe toyokelaka putulu na yango mawa.


Bosanzola Nzambe ya likolo ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni, tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona.


Na tango wana, ngai Daniele, nasalaki matanga oyo esalaki baposo misato.


Alobaki na bango ete basenga ngolu mpe mawa ya Nzambe ya Lola na tina na mabombami oyo, mpo ete baboma te ye Daniele, baninga na ye mpe bato mosusu ya bwanya ya Babiloni.


Boye, nabalolaki elongi na ngai epai na Nkolo Nzambe mpo na kosambela mpe kobondela Ye, na kokila bilei, na kolata basaki mpe na komipakola putulu.


Yona azongisaki : — Nazali Mo-Ebre, nasambelaka Yawe, Nzambe ya Lola, oyo akela bibale mpe mokili.


Lokola na mikolo ya bafeti oyo ekatama, nakolongola pasi kati na yo mpo ete ozala lisusu na soni te.


Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ