Neyemi 1:11 - Mokanda na Bomoi11 Oh Nkolo, nabondeli Yo, tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi libondeli ya mowumbu na Yo mpe libondeli ya bawumbu na Yo mosusu oyo bazali kosepela kopesa lokumu na Kombo na Yo ! Na mokolo ya lelo, longisa mowumbu na Yo mpe salela ye ngolu na miso ya moto oyo ! » Nzokande, na tango wana, nazalaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi mpe miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na koyoka libondeli oyo mowumbu na Yo azali kosala liboso na Yo, butu mpe moyi, na tina na basali na Yo, bana ya Isalaele. Nazali kotubela masumu oyo biso bana ya Isalaele, ezala ngai mpe libota ya tata na ngai, tosalaki liboso na Yo.
mpe tika ete nazwa mokanda mpo na Azafi, mokengeli ya zamba ya mokonzi, mpo ete apesa ngai mabaya ya motondo mpo na bikuke ya engumba batonga makasi pene ya Tempelo, mpo na mir ya engumba mpe mpo na ndako oyo nakovanda. Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai, mokonzi apesaki ngai mikanda yango.