Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini ? › Bokoloba na bango : ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu.
Mpe yango ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino, pamba te Yawe abimisaki bino na Ejipito na nzela ya loboko na Ye ya nguya. »
Moyize alobaki na bato : « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire.
Feti oyo bokosala ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino mpo ete mibeko ya Yawe ezala na bibebu na bino, pamba te Ye nde abimisaki bino na Ejipito na loboko na Ye ya nguya.
Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki : — Eh Yawe ! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi ?
Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon : na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye.
Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.
Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.