Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mosakoli 8:4 - Mokanda na Bomoi

4 Lokola liloba ya mokonzi ezalaka na bokonzi, nani akoki koloba na ye : « Ozali kosala nini ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mosakoli 8:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi mpe na bakonzi ya mampinga. Boye, balongwaki liboso ya mokonzi mpe bakendeki kotanga bato ya Isalaele.


nakokokisa solo, na mokolo ya lelo, ndayi oyo nalapaki epai na yo na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi.


Mokonzi Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, kobeta Adoniya ; mpe Adoniya akufaki.


Mokonzi apesaki mitindo epai ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. Benaya abimaki, abetaki Shimei, mpe Shimei akufaki. Bokonzi elendisamaki na maboko ya Salomo.


Boye, Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batosaki mitindo ya mokonzi Dariusi na lombangu mpe na ndenge ezaleli.


Soki azwi eloko, nani akoki kobotola Ye yango ? Nani akoki koloba na Ye : ‹ Ozali kosala nini ? ›


Boye mokonzi ya Ejipito abengisaki basi oyo babotisaka mpe atunaki bango : — Mpo na nini bosali boye ? Mpo na nini botiki bana mibali na bomoi ?


Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.


Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi ; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi.


soso ya mobali, ntaba mobali, mpe mokonzi oyo azali kotambola liboso ya mampinga na ye.


Sik’oyo, bomibongisa ! Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya nyonso ya bibetelo mindule, bokofukama mpo na kogumbamela ekeko oyo nasali. Soki boboyi kogumbamela yango, bokobwakama mbala moko kati na libulu ya moto. Boye, tokotala soki nzambe nini akokoka kokangola bino na maboko na ngai.


Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ