Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mosakoli 7:6 - Mokanda na Bomoi

6 Koseka ya bazoba ezalaka lokola makelele ya basende oyo ezali kozika na se ya nzungu ; wana mpe ezali pamba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mosakoli 7:6
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazingelaki ngai lokola banzoyi, kasi ekufaki lokola moto ya esobe ; nabebisaki yango na Kombo na Yawe.


Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe, lokola mwana oyo akomona moyi te mpo ete abimi na zemi oyo esopani.


Soki moto ya bwanya akei kosamba elongo na moto ya liboma, ezala asiliki to aseki, akotikala kozala na kimia te.


Na tina na koseka, nalobaki : « Ezali na yango kaka bozoba ! » Bongo na tina na elengi, nalobaki : « Esalaka nini ? »


Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.


Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi.


Mawa na bino oyo bozali ya kotonda sik’oyo, pamba te bokozala na nzala ! Mawa na bino oyo bozali koseka sik’oyo, pamba te bokozala na mawa mpe bokolela !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ