5 Koyoka pamela ya moto ya bwanya ezali malamu koleka koyoka banzembo ya zoba.
Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.
soki nalati saki, bato basalaka masapo mpo na kotiola ngai.
Moto oyo atiolaka liloba amiyokisaka pasi, kasi moto oyo atosaka malako akozwa lifuti.
Bobola mpe soni ekomelaka bato oyo baboyaka koyekola, kasi moto oyo andimaka pamela akozwa lokumu.
Pamela ezalaka na litomba mpo na moto ya mayele, kasi kobeta zoba bafimbu nkama moko ezalaka na litomba te.
Pamela ya moto ya bwanya epai ya moto oyo ayokaka ezali lokola wolo ya peto mpe sheneti ya wolo.
Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu koleka babeze ebele ya monguna.
Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,
Kopamela motioli te, noki te akoyina yo ; kasi pamela moto ya bwanya, mpe akolinga yo.
Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola banzube, mpe buku ya masese na bango ezali lokola basete oyo ekotaka makasi na libaya. Masese yango nyonso ewuti epai ya Mobateli mpate moko.
Motema ya moto ya bwanya ezalaka kati na ndako ya matanga, kasi motema ya zoba ezalaka kati na ndako ya bisengo.
Bayokaka maloba ya kimia ya moto ya bwanya koleka makelele ya mokonzi ya bazoba.
Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.