Mosakoli 7:2 - Mokanda na Bomoi2 Kokende na ndako ya matanga ezali malamu koleka kokende na ndako oyo ezali na feti, pamba te kufa ezali suka ya moto nyonso ; yango wana, bato nyonso oyo bazali na bomoi basengeli kokanisaka na tina na yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato nyonso basukaka kaka ndenge moko : ezala moto ya sembo to moto mabe, ezala moto malamu to moto oyo asalaka masumu, ezala moto ya peto to moto ya mbindo, ezala moto oyo abonzaka mbeka to moto oyo abonzaka mbeka te. Ndenge ezalaka mpo na moto ya motema malamu ndenge mpe ezalaka mpo na moto ya masumu ; ndenge ezalaka mpo na moto oyo alapaka ndayi ndenge mpe ezalaka mpo na moto oyo abangaka kolapa ndayi.