Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mosakoli 7:1 - Mokanda na Bomoi

1 Kokende sango ya malamu eleki malasi ya solo kitoko na motuya, mpe mokolo ya kufa eleki mokolo ya mbotama na malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mosakoli 7:1
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato, bato oyo balembi bazwaka bopemi,


Ezali lokola malasi ya motuya oyo basopi na moto, bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron, ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye.


Eloko oyo esepelisaka miso esepelisaka mpe motema ; sango malamu elendisaka mikuwa.


Kokende sango ya malamu ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi ; lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo.


noki te ayoka yango mpe ayokisa yo soni, boye okosambwa mpo na libela.


Mafuta mpe malasi esepelisaka motema, mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.


Ndenge nzinzi ekufa ekomisaka malasi solo mabe, ndenge wana mpe mwa bozoba ebebisaka bwanya mpe lokumu.


Yango wana, namonaki ete bato oyo basila kokufa kala bazali na bango kutu malamu koleka bato oyo bazali nanu na bomoi.


Suka ya likambo ezali malamu koleka ebandeli ya likambo ; kokanga motema ezali malamu koleka lolendo.


Solo ya malasi na yo ezali kitoko, mobimba na yo ezali lokola solo ya malasi ya kitoko oyo epanzani ; yango wana bilenge basi balingaka yo !


Solo, bolingo na yo eleki elengi, ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ! Solo, bolingo na yo eleki vino na kitoko ; solo ya mafuta na yo eleki malasi nyonso na kitoko.


nakopesa bango, kati na Tempelo na Ngai mpe na bamir na yango, ekaniseli oyo ezali na kombo : ekozala malamu koleka kozala na bana mibali mpe bana basi. Nakopesa bango kombo ya libela, oyo bakoki kolongola te.


Sik’oyo, oh Yawe, kamata na Yo bomoi na ngai ; pamba te eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !


Nzokande, bosepela te komona ete milimo mabe ezali kotosa bino ; bosepela nde ete bakombo na bino ekomami kati na Likolo.


Bongo, wana bazalaki kolia elongo, Satana asilaki kotia kati na motema ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona, makanisi ya koteka Yesu.


Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.


Totondi penza na mpiko, kasi tokosepela kotika nzoto oyo mpo na kokende kovanda elongo na Nkolo.


Ezali mpo na kondima nde Nzambe asepelaki na bato ya kala.


Kati na bango nyonso wana, atako Nzambe asepelaki na bango mpo na kondima na bango, moko te azwaki biloko oyo Nzambe alakaki bango.


Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai : — Koma : « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo ! » Mpe Molimo alobaki : — Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango.


Boye Rite alalaki na makolo na ye mpe alamukaki na tongo-tongo, wana molili ezalaki nanu kopekisa bato komonana malamu ; pamba te Boazi alobaki : « Moto moko te ayeba ete mwasi moko ayaki na etando oyo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ