3 Soki olapi ndayi liboso ya Nzambe, kowumela te mpo na kokokisa yango ; pamba te Nzambe asepelaka na bazoba te ; kokisa ndayi na yo.
« Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano ? Moto oyo azali koloba alonga na ye, kaka mpo ayebi koloba ?
Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.
Lolemo ya moto ya bwanya ekomisaka boyebi elengi, kasi monoko ya bato oyo bazangi mayele ebimisaka bozoba.
« Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto.