Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mosakoli 4:4 - Mokanda na Bomoi

4 Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mosakoli 4:4
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Filisitia bakomaki koyokela ye likunya, pamba te azalaki na bameme ebele, bantaba ebele, bangombe ebele mpe basali ebele.


Jakobi ayokaki bana mibali ya Labani koloba : « Jakobi azwi biloko nyonso ya tata na biso mpe ezali na nzela ya biloko yango nde akomi na bozwi oyo nyonso. »


Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka ; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa ?


Namona misala nyonso oyo esalemaka na se ya moyi ; nyonso wana ezali kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Namipesaki makasi mpo na koyekola bwanya mpe, lisusu, makambo ya bozoba mpe ya liboma ; kasi nasosolaki ete yango mpe ezali kaka lokola moto azali kolanda mopepe.


Pamba te moto akoki kosala mosala na ye na bwanya, na boyebi mpe na ndenge esengeli penza ; kasi akotika nyonso oyo azali na yango epai ya moto oyo amonelaki yango pasi te ; yango mpe ezali pamba mpe mabe makasi.


Nzambe apesaka bwanya, mayele mpe esengo na moto oyo asepelisaka Ye ; kasi apesaka mosala ya kosangisa mpe ya konduka bomengo epai ya moto oyo asalaka masumu mpo ete atika yango na maboko ya moto oyo asepelisaka Nzambe. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Ata soki bato oyo bazalaki kosepela na ye bazalaki ebele koleka, kasi bato oyo bakoya sima bakoki koboya ye. Yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Soki maloba eleki mingi, makambo ya pamba-pamba eyaka mpe ebele ; bongo litomba na yango ezali penza nini ?


Biloko oyo moto azali komona na miso ezali malamu koleka biloko oyo azali na yango na makanisi : yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakabaki Yesu na maboko na ye.


Lokola bakoko na biso bayokelaki Jozefi likunya, batekaki ye mpo ete azala mowumbu na Ejipito. Kasi Nzambe azalaki na ye elongo


Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi : « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso ? »


Boye tika ete moko te azala lokola Kayina oyo azalaki moto ya Satana mpe abomaki ndeko na ye. Mpo na nini Kayina abomaki Abeli, ndeko na ye ? Ezali mpo ete misala ya Kayina ezalaki mabe, kasi misala ya Abeli, ndeko na ye, ezalaki sembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ