Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mosakoli 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 tango ya kolela mpe tango ya koseka, tango ya kosala matanga mpe tango ya kobina ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mosakoli 3:4
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sara alobaki : « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. »


Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye.


Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu ; Yawe, zala lisungi na ngai. »


Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye ; bokumisa Kombo na Ye ya bule.


Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye ; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina.


tango ya kopanza mabanga mpe tango ya kosangisa yango, tango ya kopesa beze mpe tango ya kotika kopesa beze ;


Na mokolo ya malamu, sepela ; na mokolo ya mabe, kanisa ; pamba te Nzambe nde asala nyonso mibale mpo ete moto ayeba te makambo oyo ekoya sima na ye.


Bobondisa, bobondisa bato na Ngai, elobi Nzambe na bino.


Boloba kati na Yelusalemi, boyebisa ye ete minyoko na ye ekomi na suka, masumu na ye esili kolimbisama, pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe ngolu koleka mbala mibale mpo na masumu na ye nyonso.


« Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki-lelaki te. »


Yesu azongiselaki bango : — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango ? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.


Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo.


Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.


Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa.


Botala pasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ