Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mosakoli 3:3 - Mokanda na Bomoi

3 tango ya koboma mpe tango ya kobikisa, tango ya kobuka mpe tango ya kotonga ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mosakoli 3:3
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye.


Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi : ‹ Bato bakovanda kati na yo ; › na tina na bingumba ya Yuda : ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana : ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›


Komisa bato oyo mitema makasi, kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango mpo ete bamona te na miso na bango, bayoka te na matoyi na bango, basosola te na mitema na bango, babongwana te mpe babika te ! »


Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.


Ndenge nazalaki kosenzela bango mpo na kopikola mpe kobuka, kobebisa, kopanza mpe kosala bango mabe, ndenge wana mpe nakosenzela bango mpo na kotonga mpe kolona, » elobi Yawe ;


Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami.


Kasi Yawe alobaki na ngai : Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokweyisa biloko nyonso oyo natongaki mpe nakopikola biloko nyonso oyo nalonaki kati na mokili oyo.


Nakokweyisa mir oyo bopakolaki potopoto ya pembe mpe nakolalisa yango kino na se, mpo ete miboko na yango emonana. Tango mir yango ekokweya, ekoboma bino ; mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.


« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bato oyo bazali koloba ete tango ekoki nanu te mpo na kotonga Tempelo ya Yawe. › »


« Boni, bokanisi ete ezali mpo na bino tango ya kovanda na bandako ya kitoko wana Tempelo ezali ya kobeba ? »


Anjelu ya Yawe alobaki : — Yawe, Mokonzi ya mampinga, kino tango nini okoboya koyokela engumba Yelusalemi mawa mpe bingumba mosusu ya Yuda, bingumba oyo okangela kanda mibu tuku sambo mobimba ?


Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.


Pamba te soki moto asali moninga na ye mabe, Nzambe akosambisa ye ; kasi soki moto asali lisumu epai na Yawe, nani akoloba mpo na ye ? » Kasi bana batikalaki koyokela tata na bango te, pamba te ezalaki mokano ya Yawe mpo na koboma bango.


Yawe abomaka mpe apesaka bomoi, akitisaka bato na mokili ya bakufi mpe asekwisaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ