Mosakoli 2:8 - Mokanda na Bomoi8 Nakongolaki mpo na ngai moko palata mpe wolo oyo ewutaki na bomengo ya bakonzi mpe ya bituka ; nazwaki mpo na ngai bayembi ya basi mpe ya mibali, mpe oyo esepelisaka makasi mibali : mwasi mpe basi ebele ya kitoko. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sik’oyo, bomibongisa ! Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya nyonso ya bibetelo mindule, bokofukama mpo na kogumbamela ekeko oyo nasali. Soki boboyi kogumbamela yango, bokobwakama mbala moko kati na libulu ya moto. Boye, tokotala soki nzambe nini akokoka kokangola bino na maboko na ngai.
Yango wana, tango kaka bayokaki lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya bibetelo mindule lolenge nyonso, bato ya bikolo nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso bafukamaki mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki.