Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mosakoli 2:5 - Mokanda na Bomoi

5 nasalaki bilanga mpe nabongisaki bisika mpo na kolona banzete ya ndenge na ndenge, oyo ebotaka bambuma ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mosakoli 2:5
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe tika ete nazwa mokanda mpo na Azafi, mokengeli ya zamba ya mokonzi, mpo ete apesa ngai mabaya ya motondo mpo na bikuke ya engumba batonga makasi pene ya Tempelo, mpo na mir ya engumba mpe mpo na ndako oyo nakovanda. Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai, mokonzi apesaki ngai mikanda yango.


Ozali elanga ekangama, ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ; ozali etima oyo ezipami mpe liziba oyo ekangami.


Ozali kopesa pio lokola elanga ya banzete ya grenade, oyo ezali na bambuma kitoko, elongo na banzete ya solo kitoko : ene mpe nare,


Oh mopepe ya nor, lamuka ; oh mopepe ya sude, yaka ! Pepa kati na elanga na ngai, mpe tika ete solo kitoko na yango epanzana kino mosika ! Tika ete mwasi na ngai ya motema aya kati na elanga na ye mpe alia mbuma na yango ya elengi makasi !


Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema ; nayei na elanga na ngai, nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire, nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko, nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi, nayei komela vino mpe miliki na ngai. Oh baninga, bolia mpe bomela na bino, bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.


Mobali na ngai akei na elanga na ye, na mikala ya banzete ya solo kitoko mpo na koleisa bibwele na ye mpe kobuka fololo oyo babengaka lisi.


Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, mpe basoda nyonso bamonaki bongo, bakimaki, babimaki na engumba butu-butu, na nzela ya elanga ya mokonzi, na Ekuke oyo ezali na kati-kati ya bamir mibale ; bakendeki na nzela ya lubwaku ya Yordani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ