Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mosakoli 2:3 - Mokanda na Bomoi

3 Wana motema na ngai ezalaki nanu kokamba ngai na bwanya, nazwaki mokano ya komipesa na masanga ya vino mpe na makambo ya bozoba. Nazalaki nde na posa ya kososola bolamu nini moto akoki kozwa na kosala bongo na se ya moyi, na mwa mikolo ya bomoi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mosakoli 2:3
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi azongiselaki Faraon : — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.


Nzokande, soki moto akufi, boni, akoki lisusu kozala na bomoi ? Nakozela kino lolenge na ngai ebongwana.


vino mpo na kosepelisa mitema na bango, mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango, mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.


Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu ; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.


Namipesaki makasi mpo na koyekola bwanya mpe, lisusu, makambo ya bozoba mpe ya liboma ; kasi nasosolaki ete yango mpe ezali kaka lokola moto azali kolanda mopepe.


Basalaka feti mpo na kosepela, mpe masanga ya vino epesaka esengo na motema, mpe mbongo epesaka biyano na makambo nyonso.


Yoka suka ya mateya nyonso : Tosa Nzambe mpe batela mibeko na Ye, pamba te yango nde eleki na tina mpo na moto.


Eloko eleki malamu mpo na moto ezali kaka kolia, komela mpe kosepela na mosala na ye. Namoni ete oyo mpe ewuti na loboko na Nzambe ;


Kutu, epai na moto nyonso oyo Nzambe apesi bomengo mpe biloko ebele, bongo apesi ye lisusu makoki ya kosalela yango, ya kozwa libula na ye mpe ya kosepela na mbuma ya mosala na ye, wana ezali penza likabo ya Nzambe !


Pamba te, nani ayebi likambo oyo ezali malamu mpo na bomoi ya moto, na mikolo na ye nyonso ya bomoi ya pamba oyo azali kolekisa lokola elili ? Nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekoya sima na ye, na se ya moyi ?


Ezali malamu kokangama na toli ya liboso mpe kosimba toli ya mibale, pamba te moto oyo atosaka Nzambe akosalela toli nyonso mibale.


Boye, na motema na ngai mobimba, namipesaki mpo na kososola, koyeba, koluka bwanya mpe boyebi ; mpe mpo na kososola bozoba ya mabe elongo na liboma ya bozoba.


Bongo, nakumisaki esengo, pamba te ezali na eloko moko te na se ya moyi oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kolia, komela mpe kosepela. Boye esengo esengeli kobila ye kati na mosala na ye mikolo nyonso ya bomoi oyo Nzambe apesa ye na se ya moyi.


Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.


Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu ; kasi botondisamaka na Molimo,


Kasi nzete ya vino ezongiselaki yango : ‹ Natika penza vino na ngai, oyo esepelisaka banzambe mpe bato mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? ›


Tango Abigayili akomaki epai ya Nabali, akutaki Nabali azali kosala feti kati na ndako na ye ndenge penza mokonzi asalaka yango. Azalaki na loyenge mpe alangwaki makasi. Boye Abigayili ayebisaki ye eloko te kino na tongo ya mokolo oyo elandaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ