Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mosakoli 2:1 - Mokanda na Bomoi

1 Namilobelaki : « Yaka sik’oyo ; nakomekisa yo bilengi mpo ete ozala moto ya esengo ! » Nzokande, yango mpe ezalaki kaka pamba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mosakoli 2:1
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. »


Mokonzi ya Siri alobaki na ye : — Malamu ! Nakotinda mokanda epai ya mokonzi ya Isalaele. Boye Namani akendeki mpe amemaki bakilo ya palata, nkama misato na tuku mitano ; bakilo ya wolo, tuku sambo, mpe bilamba zomi ya talo.


Amilobelaka : « Eloko moko te ekotikala kolengisa ngai. » Alapaka ndayi boye : « Moko te akotikala kosala ngai mabe. »


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Bazoba bamilobelaka : « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo ya nkele, mpe moko te asalaka bolamu.


Motema na ngai elobi na tina na Yo : « Tala elongi na Ye ! » Yawe, nakotala elongi na Yo.


Ezala kati na koseka, motema ekoki kozala na mawa, mpe esengo ekoki kosuka na mawa.


Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.


Napimelaki miso na ngai eloko moko te oyo elulaki, napimelaki motema na ngai esengo moko te. Motema na ngai esepelaki na misala na ngai nyonso, mpe yango ezalaki lifuti ya mosala na ngai nyonso.


Namilobelaki : « Suka ya zoba ekozala ndenge moko kaka na suka na ngai ; sik’oyo, litomba nini ezali na moto ya kozala na bwanya mingi ? » Namilobelaki : « Oyo mpe ezali kaka pamba. »


pamba te soki Nzambe azalaki te, nani akoki kolia mpe kosepela ?


Motema ya moto ya bwanya ezalaka kati na ndako ya matanga, kasi motema ya zoba ezalaka kati na ndako ya bisengo.


Bongo, nakumisaki esengo, pamba te ezali na eloko moko te na se ya moyi oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kolia, komela mpe kosepela. Boye esengo esengeli kobila ye kati na mosala na ye mikolo nyonso ya bomoi oyo Nzambe apesa ye na se ya moyi.


Sik’oyo, nakoloba na bino makambo oyo nakosala na elanga na ngai ya vino : Nakokweyisa lopango na yango, mpe ekobebisama ; nakotobola madusu kati na bamir na yango, mpe baleki nzela bakokoma konyata-nyata yango.


Kasi sik’oyo, bino nyonso oyo bopelisi moto mpe bosimbi bakoni oyo ezali kopela moto, bokende, botambola na pole ya moto na bino mpe ya bakoni oyo bopelisi. Tala oyo bokozwa na maboko na ngai : Bokokufa na pasi !


Nkolo Yawe afungolaki ngai matoyi, mpe ngai natiaki moto makasi te ; namizongisaki sima te.


Sima na yango, nakomilobela : ‹ Oh bomoi na ngai, otondi na biloko oyo ebombami mpo na mibu ebele ; pema na yo, lia, mela mpe sepela ! › »


Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso.


Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye.


Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.


Boyoka sik’oyo, bino bato oyo bolobaka : « Lelo to lobi, tokokende na engumba songolo, tokovanda kuna mobu mobimba mpe tokosala mombongo oyo ekobotela biso mbongo ebele. »


Boyoka sik’oyo, bino bazwi : Boyoka mawa mpe bolela mpo na pasi oyo ekokweyela bino.


Awa na mokili, bozali kobika bomoi ya bisengo mpe ya bofuluki, bozali komikomisa nzoto mafuta lokola banyama oyo babongisi mpo na koboma.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ