4 Moto oyo atalaka mopepe akolona nkona te, moto oyo atalaka mapata akobuka bambuma te.
Moto ya goyigoyi asalaka bilanga te likolo ya kobanga malili ; boye na tango ya kobuka mbuma, alukaka mpe kobuka, kasi akozwa eloko te.
Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ezali kuna na libanda, ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »
Koboyaka te kosala bolamu epai ya moto oyo azali na bosenga, tango maboko na yo ezali na makoki ya kosala yango.
Soki mapata etondi na mayi, ebetisaka mvula na mokili. Nzete etikalaka kaka na esika oyo ekweyi, ezala na ngambo ya sude to na ngambo ya nor.
Ndenge oyebi te nzela ya mopepe to ndenge nini moto asalemaka kati na libumu ya mama na ye, ndenge wana mpe okokoka te kososola misala ya Nzambe oyo azali Mokeli ya nyonso.