3 Ata tango zoba atambolaka na nzela, bozangi mayele na ye etalisaka na bato mosusu ete azali zoba.
Moto ya mayele asalaka makambo kolanda boyebi, kasi zoba, atandaka bozoba na ye.
Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa tango ya kokanisa, kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.
Bibebu ya moto oyo azangi mayele eyeisaka koswana, mpe monoko na ye eyeisaka fimbu.
Soki olapi ndayi liboso ya Nzambe, kowumela te mpo na kokokisa yango ; pamba te Nzambe asepelaka na bazoba te ; kokisa ndayi na yo.
Kasi sik’oyo, Bapagano bazali kokamwa ete bozali kosangana lisusu te elongo na bango kati na bomoi wana ya kindumba makasi ; yango wana bakomi kobebisa lokumu na bino na nzela ya matongi.