Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mosakoli 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Oyo ezalaki ekozala lisusu, oyo esalemaki ekosalema lisusu : likambo ya sika ezalaka te na se ya moyi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mosakoli 1:9
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, ezali penza na likambo moko oyo moto akoki koloba na tina yango : « Tala, oyo penza ezali likambo ya sika ? » Te, esila komizalela kala, kala penza liboso ya eleko na biso.


Bongo, nabalolaki makanisi na ngai mpo na koyekola bwanya, bozoba mpe bolema. Eloko nini mokitani ya mokonzi akoki kosala, oyo eleki oyo esila kosalema ?


Makambo oyo ezali lelo esila kozala na kala, mpe makambo oyo ekoya ezala wuta kala ; Nzambe nde azongisaka makambo oyo esila koleka na tango ya kala.


Ekelamu nyonso oyo ezali esila koyebana na kombo na yango, mpe eyebani malamu soki moto azali nani : akoki te kotelemela oyo aleki ye na makasi.


Kolobaka te : « Mpo na nini mikolo eleki ezali malamu koleka mikolo ya lelo ? » Pamba te bwanya etindaka te bato kotuna mituna ya boye.


Tala, nazali kosala likambo ya sika ! Ezali kobima sik’oyo, bozali komona yango te ? Nazali kopasola nzela kati na esobe, mpe kotia bibale kati na mabele ya kokawuka.


Oh elenge mwasi ya mobulu, kino tango nini okotika kotambola-tambola ? Yawe akosala likambo ya sika na mabele : mwana mwasi akoluka mwana mobali na bolingo. »


Ndenge kaka basakoli ya lokuta bazalaki kati na bana ya Isalaele na tango ya kala, ndenge wana mpe bateyi ya lokuta bakozala kati na bino ; bakokotisa na mayele mabe mateya ya lokuta mpe ya libebi kino ata kowangana Nkolo oyo asikolaki bango, mpe bakomibendela libebi na mbalakata.


Bongo namonaki Likolo ya sika mpe mabele ya sika, pamba te Likolo ya liboso mpe mabele ya liboso elimwaki, mpe ebale monene ezalaki lisusu te.


Bongo Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi alobaki : « Nazali kokomisa biloko nyonso ya sika. » Alobaki lisusu : « Koma makambo oyo, pamba te maloba oyo ezali penza ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ