Boye, tango natali misala nyonso oyo maboko na ngai esalaki mpe pasi nyonso oyo namonaki mpo na kokokisa yango, namoni ete nyonso wana ezalaki kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe, ezali na yango na litomba moko te na se ya moyi.
Bongo, nani ayebi soki moto yango akozala moto ya bwanya to zoba ? Nzokande, ye nde akozala na bokonzi na likolo ya misala nyonso oyo nabimiselaki motoki mpe mayele na ngai na se ya tango. Yango mpe ezali kaka pamba.
Kutu, epai na moto nyonso oyo Nzambe apesi bomengo mpe biloko ebele, bongo apesi ye lisusu makoki ya kosalela yango, ya kozwa libula na ye mpe ya kosepela na mbuma ya mosala na ye, wana ezali penza likabo ya Nzambe !
Pamba te, nani ayebi likambo oyo ezali malamu mpo na bomoi ya moto, na mikolo na ye nyonso ya bomoi ya pamba oyo azali kolekisa lokola elili ? Nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekoya sima na ye, na se ya moyi ?
Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi : bato nyonso basukaka kaka ndenge moko ; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi ; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.
Bolingo na bango, koyina na bango mpe baposa na bango esila kolimwa ; bakozwa lisusu litomba ata moko te kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi.
Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini, pamba te moto nde asalaki yango ? Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokuta ezali na tina penza nini ? Pamba te moto oyo asalaki yango azali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye, asali nde ekeko oyo elobaka te.
Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.