4 Boye, Moyize ayebisaki bana ya Isalaele ete basepelaka feti ya Pasika.
Moyize abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Bokende kozwa na libota moko na moko mwana meme to mwana ntaba mpe bokata yango kingo lokola mbeka ya Pasika.
Bosala feti yango na tango oyo ekatama, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza oyo, kolanda mibeko mpe malako na yango nyonso. »
Basepelaki Pasika kati na esobe ya Sinai, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya liboso. Bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize.