23 Ezalaki kaka na mitindo na Yawe nde bazalaki kowumela na molako to kokende. Boye, bazalaki kosala mosala ya Yawe kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato.
lokola bibwele oyo ezali kokita na lubwaku, Molimo na Yawe apesaki bango bopemi. Ezali ndenge wana nde okambaki bato na Yo mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yo.
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Soki otamboli na nzela na Ngai mpe obateli mitindo na Ngai, okokamba ndako na Ngai mpe okobatela lopango na Ngai, mpe nakotia yo na molongo ya ba-oyo batelemaka awa.
Pamba te wuta tango molayi kino na mokolo ya lelo, botikalaki kosundola bandeko na bino te, kasi bobatelaki malamu mokumba oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino.