Joziasi asepelaki feti ya Pasika mpo na lokumu ya Yawe kati na Yelusalemi ; mpe na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika.
Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme lokola mbeka ya Pasika, bayekoli batunaki Ye : — Esika nini olingi ete tokende kobongisela Yo bilei ya Pasika ?
Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko.