— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Soki otamboli na nzela na Ngai mpe obateli mitindo na Ngai, okokamba ndako na Ngai mpe okobatela lopango na Ngai, mpe nakotia yo na molongo ya ba-oyo batelemaka awa.
Ezalaki na mitindo na Yawe kaka nde bana ya Isalaele bazalaki kotambola mpe kosala molako na bango. Tango nyonso lipata ezalaki kowumela na likolo ya Mongombo, bango mpe bazalaki kowumela na molako.
Soki mpe lipata esali kaka mwa ndambo ya mikolo na likolo ya Mongombo, na mitindo na Yawe, bazalaki kowumela na molako na bango ; mpe bazalaki kokende soki kaka Yawe apesi mitindo.