Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 9:17 - Mokanda na Bomoi

17 Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo, bana ya Isalaele mpe bazalaki kokende ; mpe esika nyonso oyo lipata ezalaki kotelema, esika wana nde bazalaki mpe kosala molako na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 9:17
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Olobaki : « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.


Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.


Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato.


Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te ; molunge ya esobe to moyi makasi ekomonisa bango pasi te, pamba te Ye oyo alingaka bango akolakisa bango nzela mpe akomema bango pene ya miluka.


Soki lipata etelemi na likolo ya Mongombo mikolo mibale to sanza moko to mpe mobu moko, bana ya Isalaele mpe bazalaki kaka kowumela na molako, bazalaki kokende te ; kasi soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende.


Ngai nde nazali ekuke ; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika ; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ