Otambolisaki bango, na moyi, na nzela ya likonzi ya mapata, mpe, na butu, na nzela ya likonzi ya moto mpo na kongengisa nzela oyo basengelaki kotambola.
Mpo na mawa monene na Yo, otikalaki kosundola bango te na esobe : likonzi ya mapata etikaki bango te, ekobaki kotambolisa bango na nzela na bango, na moyi ; mpe na butu, likonzi ya moto etikaki te kongengisa nzela oyo basengelaki kolanda.
Na moyi, lipata ya Yawe ezalaki na likolo ya Mongombo ; bongo na butu, moto ezalaki kongala kati na lipata, mpe miso ya bana nyonso ya Isalaele ezalaki komona yango. Esalemaki bongo na mibembo na bango nyonso.
Pamba te, kati na Klisto, Nzambe azalaki kozongisa boyokani kati na bato mpe Ye moko, na kotala masumu na bango te. Mpe atiaki kati na biso liloba ya boyokanisi.
oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika ya kotonga molako. Na butu, azalaki lokola likonzi ya moto ; mpe na moyi, azalaki lokola likonzi ya lipata ; mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengelaki kotambola.
Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango.