12 Bakotika eloko moko te kino na tongo mpe bakobuka mokuwa ata moko te. Basengeli kolanda mibeko na yango nyonso na tango ya kosepela feti ya Pasika.
Bokotika ata ndambo te kino na tongo. Kasi soki ndambo ekomi na tongo, botumba yango na moto.
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Tala mibeko na tina na Pasika : ‹ Mopaya moko te akoki kolia yango.
Ekoliama kaka kati na ndako moko na moko, bakobimisa ata mosuni moko te na libanda ya ndako mpe bakobuka ata mokuwa na yango moko te.
Na butu ya mokolo yango, bakotumba mosuni na yango na moto mpe bakolia yango elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo.
Na moyi, lipata ya Yawe ezalaki na likolo ya Mongombo ; bongo na butu, moto ezalaki kongala kati na lipata, mpe miso ya bana nyonso ya Isalaele ezalaki komona yango. Esalemaki bongo na mibembo na bango nyonso.
Bosala feti yango na tango oyo ekatama, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza oyo, kolanda mibeko mpe malako na yango nyonso. »
Makambo nyonso wana esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama : « Bakobuka ata mokuwa na Ye moko te. »