Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 8:26 - Mokanda na Bomoi

26 Akokoma nde kosunga bandeko na ye mpo na kokokisa misala na bango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Nzokande ye moko akosala lisusu mosala te. Yango nde ekozala bikateli oyo okolanda mpo na mosala ya Balevi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 8:26
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Balevi bazalaki kosala mosala na bango ya kokengela Ndako ya kapo ya Bokutani mpe Esika ya bule, mpe ya kosunga bandeko na bango ya mibali, bana ya Aron, na mosala ya Tempelo ya Yawe.


Kati na Esika na Ngai ya bule, bakosala kaka mosala ya kokengela bikuke ya Tempelo mpe misala mosusu ya Tempelo ; bakobanda koboma mpo na bato bambeka ya kotumba mpe bambeka mosusu mpe bakotelema liboso ya bato mpo na kosalela bango.


Na esika ete bomipesa na mosala ya biloko na Ngai ya bule, bino bozali nde kopesa mosala na Ngai epai ya bapaya, kati na Esika na Ngai ya bule.


Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »


Bakosunga yo mpe bakozala na mokumba ya kobatela Ndako ya kapo ya Bokutani, mosala nyonso ya Ndako ya kapo, mpe moto mosusu te akoki kopusana pene ya esika oyo bozali.


Mokambi ya bakambi ya Balevi ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. Aponamaki mpo ete akamba bato oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.


Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. »


Kasi soki akokisi mibu tuku mitano, akotika mosala oyo azalaki kosala, akosala lisusu mosala te.


Zwa makambo yango na motuya mpe mipesa na yango mpo ete bato nyonso bamona ete ozali kokende liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ