Okotanga mibali nyonso oyo bazali na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino na tuku mitano, ba-oyo bakoki kosala mosala songolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
« Tala bikateli oyo etali Balevi : mobali nyonso oyo azali na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale na mitano mpe koleka asengeli koya kosala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
Akokoma nde kosunga bandeko na ye mpo na kokokisa misala na bango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Nzokande ye moko akosala lisusu mosala te. Yango nde ekozala bikateli oyo okolanda mpo na mosala ya Balevi. »