Mitango 8:22 - Mokanda na Bomoi22 Sima na yango, Balevi bazwaki ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani, na se ya bokonzi ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Basalaki mpo na Balevi, makambo oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ezekiasi atiaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na masanga mpe apesaki na moko na moko mosala kati na lisanga na ye. Banganga-Nzambe mpe Balevi bapesamelaki mosala ya bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mosala ya kozongisa matondi mpe ya koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe, na bikuke ya Tempelo ya Yawe.