« Na mokolo oyo nakomonisa nguya na Ngai, bakokoma bato na Ngai, bomengo na Ngai ya talo. Nakobatela bango ndenge tata abatelaka mwana oyo asalelaka ye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Tala, Ngai moko nde naponaki bandeko na yo, Balevi, kati na bana ya Isalaele lokola likabo mpo na yo ; babulisami mpo na Yawe mpo na kosala mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
« Tia Balevi pembeni, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele ya Balevi, na esika ya bibwele ya bana ya Isalaele. Balevi bazali ya Ngai. Nazali Yawe.
Pamba te, bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele bazali ya Ngai, ezala bana ya liboso ya bana ya bato to ya banyama. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso na mokili ya Ejipito, natiaki bango pembeni mpo na Ngai moko.
Na tango wana, Yawe atiaki pembeni libota ya Levi mpo na komemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpo na kotelemaka liboso ya Yawe, mpo na kosalaka mosala na Ye mpe mpo na kopambolaka bato na Kombo na Ye ndenge bazali kosala kino lelo.
Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,