Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 8:12 - Mokanda na Bomoi

12 Mpe na sima, Balevi bakotia maboko na bango likolo ya mito ya bangombe ya mibali. Bonza ngombe moko lokola mbeka ya masumu epai na Yawe mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Balevi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 8:12
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okomema ngombe ya mobali liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani ; Aron mpe bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango.


Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango.


Akobonza lisusu bibenga mibale kolanda bozwi na ye : moko lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mosusu lokola mbeka ya kotumba.


Aron akobonza, mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye moko mpe ya ndako na ye. Sima na ye kokata kingo ya ngombe ya mobali oyo abonzi mpo na ye moko lokola mbeka ya masumu,


Aron akotia maboko na ye mibale na moto ya ntaba yango, akotubela mabe, botomboki mpe masumu nyonso ya bana ya Isalaele na moto ya ntaba yango. Na nzela wana akotia masumu nyonso na moto ya ntaba yango ; sima akopona moto moko mpo na kobengana ntaba yango na esobe.


Aron akobonza mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na ndako na ye.


Bakambi ya lisanga bakotia maboko na bango na moto ya ngombe yango liboso ya Yawe.


Akosala ndenge kaka asalaki na ngombe oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu. Na bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato ; mpe bakolimbisama.


Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta ya mwana meme kati na mbeka ya boyokani. Mpe Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo, na likolo ya makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. ’ › »


Boye akobonza liboso ya Yawe, mwana ngombe yango ya mobali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akotia loboko na ye na moto ya mwana ngombe mpe akokata yango kingo liboso ya Yawe.


Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.


Bongo amemaki ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu ; Aron elongo na bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto ya ngombe yango.


Moyize akataki yango kingo mpe asalelaki mosapi na ye mpo na kotia makila ya ngombe yango na maseke ya etumbelo. Boye, apetolaki etumbelo ; bongo asopaki makila oyo etikalaki, na makolo ya etumbelo oyo abulisaki mpo na mosala ya bolimbisi masumu.


Bongo amemaki meme ya mobali mpo na kobonza yango lokola mbeka ya kotumba ; Aron mpe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto na yango.


Makambo oyo esalemi lelo, yango nde Yawe atindi mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu na bino.


Moyize alobaki na Aron : « Pusana pene ya etumbelo mpe bonza mbeka na yo ya masumu mpe mbeka na yo ya kotumba ; mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yo moko mpe mpo na bato. Bonza likabo ya bato mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, kolanda ndenge Yawe apesaki mitindo. »


epai wapi akobonza lokola mbeka mpo na Yawe : mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba ; meme ya mwasi ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu ; mpe meme ya mobali mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ;


Nganga-Nzambe akomema makabo wana nyonso liboso ya Yawe ; akobonza mbeka na ye mpo na masumu mpe mbeka na ye ya kotumba ;


Tika ete Balevi batelema liboso ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bongo bonza bango lokola likabo epai na Yawe.


Bakokamata mwana ngombe ya mobali elongo na likabo na yango ya farine oyo basangisa na mafuta ; mpe okokamata mwana ngombe mosusu ya mobali mpo na mbeka ya masumu.


Pamba te, kolanda Mibeko, nyonso epetolamaka na makila ; mpe soki makila etangi te, bolimbisi masumu ezali te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ