10 Okopusa Balevi liboso ya Yawe mpe bana ya Isalaele bakotia bango maboko.
Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango.
Bakambi ya lisanga bakotia maboko na bango na moto ya ngombe yango liboso ya Yawe.
« Tia Balevi pembeni, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele ya Balevi, na esika ya bibwele ya bana ya Isalaele. Balevi bazali ya Ngai. Nazali Yawe.
Balakisaki bango epai ya Bantoma ; Bantoma basambelaki mpo na bango mpe batiaki bango maboko.
Kozwa na pamba te likabo oyo Nzambe apesaki yo na nzela ya lisakoli, tango lisanga ya bakambi ya Lingomba batielaki yo maboko.
Kotiela moto maboko noki te mpe kosanganaka te na masumu ya bato mosusu. Mibatela peto.