mpo na bana mibali ya Jozefi : mpo na libota ya Efrayimi : Elishama, mwana mobali ya Amiwudi ; mpo na libota ya Manase : Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri ;
Na ngambo ya weste, milongo ya mampinga ya Efrayimi bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Efrayimi ezali Elishama, mwana mobali ya Amiwudi.
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Eliazafi, mwana mobali ya Deweli.
amemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,