« Ebele ya bambeka na bino ekosala Ngai nini, » elobi Yawe ? « Nasili kolemba bambeka na bino ya kotumba, bambeka na bino ya bameme ya mibali mpe mafuta ya bibwele na bino ya mafuta ; nazali kosepela ata moke te na makila ya bangombe ya mibali, ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali.
Solo, amemaki mokumba ya bokono na biso mpe alataki pasi na biso kati na nzoto na ye ; kasi biso, tokanisaki ete Nzambe nde abetaki ye, apesaki ye etumbu mpe asambwisaki ye.