Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 7:19 - Mokanda na Bomoi

19 amemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 7:19
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala biloko yango mpe motango na yango : bakopo ya wolo ezalaki tuku misato ; bakopo ya palata ezalaki nkoto moko ; basani ya mbele ya palata ezalaki tuku mibale na libwa ;


Okosala na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga.


Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo : basani ya putulu, bapawu, bambeli, basani ya kobwakela mayi, bakopo.


Soki moto alingi komema makabo ya mbuma epai na Yawe, makabo yango ekozala ya farine. Bongo na likolo na yango, akosopa mafuta mpe akotia ansa.


Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu.


Na mokolo wana, bakotia makomi na bangonga mike-mike ya bampunda : « Ebulisami mpo na Yawe ! » Banzungu ya Tempelo ya Yawe ekozala mpe bule ndenge bakopo ezalaka bule liboso ya etumbelo.


Na mokolo ya mibale, Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, mokambi ya libota ya Isakari,


mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.


Lokola mama akotisaki makanisi mabe kati na mwana, mwana mwasi alobaki na Erode : « Pesa ngai awa, na sani, moto ya Yoane Mobatisi. »


Mbala moko, mwana mwasi azongaki na lombangu epai ya mokonzi mpe alobaki na ye : — Nalingi ete opesa ngai, sik’oyo, na sani, moto ya Yoane Mobatisi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ