Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale :
Na ngambo ya este epai wapi moyi ebimaka, milongo ya mampinga ya Yuda bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Yuda ezali Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.
Likabo na ye ezalaki : etando ya palata ya kilo moko na ndambo, mbeki moko ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale ezalaki ya kotonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo ;