11 Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Tika ete mokolo na mokolo, mokambi moko na moko amema likabo na ye mpo na libulisi ya etumbelo ! »
Bakambi bamemaki makabo na bango mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta ; bamemaki makabo yango liboso ya etumbelo.
Na mokolo ya liboso, Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, moto ya libota ya Yuda, amemaki likabo na ye.
Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia. Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu,
Kasi tika ete makambo nyonso esalema na ndenge oyo esengeli, na mobulu te.
Pamba te, atako na nzoto, nazali mosika na bino, kasi na molimo, nazali elongo na bino ; mpe nazali kosepela komona ete bozali kotambola na botosi mpe bozali kobatela kondima na bino kati na Klisto.