Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 6:9 - Mokanda na Bomoi

9 Soki moto akufi na mbalakata pene na ye, moto na ye oyo epesama mpo na libulisi ekokoma mbindo. Bongo asengeli kokatisa suki na ye ya moto mpe mandefu na ye na mokolo ya sambo, mokolo na ye ya kopetolama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 6:9
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo oyo akokota kati na Esika ya bule, kati na lopango ya kati mpo na kosala mosala, akobonza mbeka mpo na masumu na ye moko, elobi Nkolo Yawe.


Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi ; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo.


Na mokolo ya sambo, akokata lisusu bapwale na ye, suki na ye ya moto mpe ya miso, mandefu na ye mpe bapwale nyonso mosusu ; akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi. Na bongo, akozala peto.


Bongo moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe akokata, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, suki ya moto na ye mpe ya mandefu na ye ; akolokota yango mpe akobwaka yango na moto oyo ezali kopela na se ya mbeka mpo na kozongisa boyokani.


Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, akozala bule mpo na Yawe.


Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Kolinto. Bongo, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendeki na Siri elongo na Prisile mpe Akilasi. Liboso na Polo kolongwa na libongo ya Sankresi, akokolisaki suki ya moto na ye, pamba te alapaki ndayi.


Tango mikolo sambo ekomaki pene ya kokoka, Bayuda ya mokili ya Azia bamonaki Polo kati na lopango ya Tempelo. Batombokisaki ebele nyonso ya bato mpe bakangaki ye


Boye mobali oyo asepeli kobala mwasi yango akokotisa ye kati na ndako na ye, mpe mwasi yango akomikokola suki ya moto na ye, akomikata manzaka na ye ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ