7 ezala mpo na kufa ya tata na ye, ya mama na ye, ya ndeko na ye ya mobali to ya ndeko na ye ya mwasi, asengeli te komikomisa mbindo ; pamba te na moto na ye, azali na elembo ya libulisi mpo na Nzambe.
Nganga-Nzambe moko te akomikomisa mbindo na kopusana pene ya moto ya kokufa. Nzokande, akoki kondima komikomisa mbindo soki moto oyo akufi azali tata to mama na ye, mwana na ye ya mobali to ya mwasi, ndeko na ye ya mobali to ya mwasi oyo amibalelaki te.
Kasi bato mosusu kati na bango basepelaki Pasika te na mokolo wana, pamba te bazalaki mbindo mpo ete basimbaki ebembe. Boye, kaka na mokolo wana, bakendeki komona Moyize na Aron