Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 6:3 - Mokanda na Bomoi

3 asengeli komipekisa komela vino, masanga oyo elangwisaka, masanga ya ngayi oyo basala na vino mpe masanga ya ngayi oyo basala na masanga mosusu oyo elangwisaka ; asengeli te komela masanga oyo basala na bambuma ya vino ya mayi to ya kokawuka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 6:3
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Tango bokobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, yo mpe bana na yo ya mibali, bosengeli te komela masanga oyo elangwisaka, noki te bokokufa. Yango ezali mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe milongo nyonso oyo ekoya sima na bino,


Kati na bana na bino ya mibali, nabimisaki basakoli ; mpe kati na bilenge mibali na bino, nabimisaki banaziri. Oh bana ya Isalaele, boni, ezali solo te ? » elobi Yawe.


« Kasi bino, bolangwisi banaziri masanga mpe bopekisi basakoli ete basakola lisusu te.


Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, asengeli te kolia eloko nyonso oyo basala na bambuma ya vino, kobanda na mokokoli kino na poso.


pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu ; kasi botondisamaka na Molimo,


Okomelaka mayi kaka te, kasi melaka mpe mwa masanga ya vino mpo ete esunga yo mpo na pasi na yo ya libumu mpe mpo na bokono oyo ozwaka mbala na mbala.


Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola : mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.


Akolia eloko moko te oyo ewuti na nzete ya vino, akomela vino te to masanga mosusu ya makasi, akolia eloko moko te ya mbindo ; asengeli kosala makambo nyonso oyo natindi ye.


Sik’oyo, sala keba ! Komela vino te to masanga mosusu ya makasi, mpe kolia te eloko nyonso ya mbindo ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ