Tango Jozefi atombolaki miso, amonaki Benjame, ndeko na ye ya mobali, mwana ya mama na ye. Atunaki : — Ye wana nde ndeko na bino ya suka oyo boyebisaki ngai ? Abakisaki : — Tika ete Nzambe atalisa yo ngolu na Ye.
Sik’oyo, Nzambe na biso, yoka losambo mpe mabondeli na ngai, mosali na Yo ! Mpo na lokumu na Yo, Nkolo, tala na miso ya ngolu Esika na Yo ya bule oyo ebebi !
« Sik’oyo, bozali mpe kobondela Nzambe ete asalela bino ngolu na makabo ya lolenge oyo na maboko ! Boni, andima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Epai na bino nyonso oyo, kati na Rome, bozali balingami ya Nzambe mpe bobengama mpo na kozala basantu : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !