Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 6:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bongo moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe akokata, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, suki ya moto na ye mpe ya mandefu na ye ; akolokota yango mpe akobwaka yango na moto oyo ezali kopela na se ya mbeka mpo na kozongisa boyokani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 6:18
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

akobonza lisusu epai na Yawe meme ya mobali lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, elongo na kitunga ya mapa ezanga levire. Nganga-Nzambe akobakisa na likolo na yango mbeka na ye ya masanga mpe makabo na ye mosusu.


Na mikolo nyonso ya ndayi ya libulisi na ye, jileti esengeli te kotutana na moto na ye to basengeli te kokata suki ya moto na ye, kino tango ya libulisi na ye mpo na Yawe ekosila ; akozala bule mpe akotika suki ya moto na ye mpe mandefu na ye kokola.


Soki moto akufi na mbalakata pene na ye, moto na ye oyo epesama mpo na libulisi ekokoma mbindo. Bongo asengeli kokatisa suki na ye ya moto mpe mandefu na ye na mokolo ya sambo, mokolo na ye ya kopetolama.


Ndenge moko mpe mpo na bino : soki bosali nyonso oyo batindi bino, boloba : « Tozali basali ya pamba, tokokisi kaka mokumba na biso. »


Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Kolinto. Bongo, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendeki na Siri elongo na Prisile mpe Akilasi. Liboso na Polo kolongwa na libongo ya Sankresi, akokolisaki suki ya moto na ye, pamba te alapaki ndayi.


Sala makambo oyo tokoyebisa yo : Tozali awa na mibali minei oyo balapa ndayi.


Zwa bango, mipetola elongo na bango mpe futela bango mbongo mpo ete bakatisa suki. Na bongo, bato nyonso bakoyeba ete sango oyo bazali koyoka na tina na yo ezali ya lokuta, mpe bakososola ete yo moko mpe otosaka Mobeko.


Mokolo oyo elandaki, Polo amemaki bato yango mpe amipetolaki elongo na bango. Bongo akotaki na Tempelo mpo na koyebisa mokolo oyo tango ya komipetola ekosila, mokolo oyo bakobonza mbeka mpo na moko na moko kati na bango.


mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ