13 Tala mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe : ‹ soki mikolo ya libulisi na ye ekoki, basengeli komema ye na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani
Akokaba lisusu epai na Yawe libulisi na ye mpe akobonza lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mwana meme ya mobu moko ; pamba te mikolo na ye ya liboso, oyo esilaki koleka, ekotangama lisusu te mpo ete akomaki mbindo.
Mokolo oyo elandaki, Polo amemaki bato yango mpe amipetolaki elongo na bango. Bongo akotaki na Tempelo mpo na koyebisa mokolo oyo tango ya komipetola ekosila, mokolo oyo bakobonza mbeka mpo na moko na moko kati na bango.
Tango mikolo sambo ekomaki pene ya kokoka, Bayuda ya mokili ya Azia bamonaki Polo kati na lopango ya Tempelo. Batombokisaki ebele nyonso ya bato mpe bakangaki ye