6 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto, azala mobali to mwasi, atamboli na boyengebene te liboso ya Yawe wana asali moninga na ye mabe, azali na ngambo.
Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.
Jozue alobaki na Akana : — Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te.