31 Mobali akomema ngambo ata moke te kasi mwasi akozwa etumbu ya lisumu na ye. › »
akongengisa bosembo na yo lokola pole, makoki na yo lokola moyi ya midi.
Pamba te bato nyonso ya bomoi bazali ya Ngai, ezala tata to mwana, bango mibale bazali ya Ngai ; moto oyo akosala masumu, ye moko nde akokufa.
Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.
Bakosalela yango mpe soki mobali asali zuwa mpe akanisi penza ete mwasi na ye abimi na mobali mosusu : mobali akomema mwasi mpe akotelemisa ye liboso ya Yawe ; bongo Nganga-Nzambe akosalela mobeko oyo na mobimba na yango epai ya mwasi.
Yawe alobaki na Moyize :
Kasi soki moto moko asepeli feti ya Pasika te, wana azali mbindo te mpe asali mobembo te, basengeli kolongola ye kati na libota na ye, pamba te abonzeli Yawe likabo te na tango oyo ekatama ; akomema mikumba ya masumu na ye.