3 Azala mobali to mwasi, bobengana ye, bobimisa ye libanda ya molako mpo ete bakomisa molako na bango mbindo te, pamba te Ngai nazali kowumela elongo na bango. »
Bongo, na likolo ya mabaya ya sedele yango oyo esimbaki motondo, ezalaki na milongo misato ya mabaya mosusu ya sedele na likolo ya makonzi : molongo moko na moko ezalaki na mabaya ya sedele zomi na mitano. Na kosangisa, mabaya yango ezalaki tuku minei na mitano.
Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi ; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo.
Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo ; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. ›
Moto na moto, kati na bisalelo na ye, asengeli kozala na pawu ya moke mpo na kotimola mabele ; mpe soki akei kosala zongo inene, akotimola mwa libulu mpe akokunda nyei na ye.
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, atambolaka kati na molako na bino mpo na kobatela bino mpe kokangola bino na maboko ya banguna na bino. Molako na bino esengeli kozala bule mpo ete akoka komona te eloko moko ya mbindo kati na bino mpe apesa bino mokongo te.
Bandeko, totindi bino na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto ete bokima ndeko nyonso oyo atambolaka na bomoi ya mobulu mpe alingaka te kotambola kolanda malakisi oyo bozwaki kowuta na biso.
Soki, kati na Lingomba, ezali na moto oyo amemaka bokabwani, kebisa ye, mbala moko, mpe kebisa ye mbala ya mibale. Soki aboyi kaka koyoka, bimisa ye libanda ya Lingomba ;
Eloko moko te ya mbindo ekokota kuna, mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya nkele mpe alobaka lokuta akokota kuna ; kaka ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi ya Mpate nde bakokota kuna.
Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango.