26 Nganga-Nzambe akotondisa na loboko na ye, bambuma oyo akozwa kati na likabo yango ya zuwa lokola ekaniseli, mpe akotumba yango na likolo ya etumbelo ; sima na yango, akomelisa mwasi mayi.
Akomema yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, oyo moko kati na bango akozwa loboko mobimba ya farine mpe mafuta elongo na ansa nyonso, mpe akotumba yango na etumbelo lokola ekaniseli. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
Nganga-Nzambe akolongola na makabo ya mbuma eteni oyo esengeli kobonzama lokola ekaniseli mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
Sima, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akozwa loboko moko lokola eteni ya ekaniseli mpe akotumba yango na moto mpo na Yawe : ezali mbeka mpo na masumu.